Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 18:27 - Mokanda na Bomoi

27 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki : — Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino ? Te ! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 18:27
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na Lakishi, mokonzi ya Asiri atindaki epai ya mokonzi Ezekiasi, na Yelusalemi, mokonzi ya mampinga na ye, mokonzi ya bakalaka ya lokumu, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, mpe mampinga ya basoda ya nguya. Tango bakomaki na Yelusalemi mpe batelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,


Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi : — Tobondeli yo, loba na basali na yo na lokota ya Arami, pamba te tososolaka yango ; koloba na biso na lokota ya Ebre te, noki te bato oyo bazali na likolo ya mir bakoyoka.


Boye mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre : — Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri !


Lokola bazingelaki Samari tango molayi, nzala makasi ekotaki kati na engumba kino moto moko ya ane ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mwambe ; mpe bagrame nkama mibale na tuku mitano ya nyei ekawuka ya ebenga ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, mitano.


batiolaka mpe balobaka mabe, bagangelaka minyoko.


Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki : — Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino ? Te ! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino ?


Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangami na likolo ya kati ya monoko na ye ; bana mike bazali kosenga bilei kasi moto moko te azali kopesa bango yango.


Bato oyo na kala bazalaki kolia bilei ya kitoko bakomi kokufakufa na babalabala ; ba-oyo bakolaki na molato ya motane bakomi sik’oyo kolalela matiti ya kopola.


Yawe alobaki : — Ezali na nzela wana nde bana ya Isalaele bakolia bilei ya mbindo kati na bikolo epai wapi nakobengana bango.


Alobaki na ngai : — Malamu mingi ! Na esika ya nyei ya bato, napesi yo nyei ya ngombe mpo ete okoka kotumbela gato na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ