Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 18:18 - Mokanda na Bomoi

18 babelelaki mokonzi. Mpe Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 18:18
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Adorami azalaki kokamba misala makasi ; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ;


Eliyorefi mpe Ayiya, bana mibali ya Shisha, bazalaki bakomi mikanda ; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ;


Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi : — Tobondeli yo, loba na basali na yo na lokota ya Arami, pamba te tososolaka yango ; koloba na biso na lokota ya Ebre te, noki te bato oyo bazali na likolo ya mir bakoyoka.


Boye Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.


Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki.


Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, mpo na kopetola mokili mpe Tempelo, atindaki Shafani, mwana mobali ya Atsalia ; Maaseya, moyangeli ya engumba ; mpe Yoa, mwana mobali ya Yoakazi mpe mobombi mikanda, mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na ye.


Tala, basoda na bango ya mpiko bazali koganga makasi na balabala ; bamemi sango ya kimia, azali kolela makasi.


Bongo Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.


Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na ye.


Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ