2 Bakonzi 18:15 - Mokanda na Bomoi15 Ezekiasi apesaki ye palata nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi Joasi, mokonzi ya Yuda, azwaki biloko nyonso ya bule oyo bakoko na ye —Jozafati, Yorami mpe Akazia, bakonzi ya Yuda— babulisaki. Joasi azwaki mpe bakado oyo ye moko abulisaki mpe wolo nyonso oyo amonaki kati na bibombelo ya bozwi ya Tempelo ya Yawe mpe na ndako ya mokonzi. Atindaki yango epai ya Azaeli, mokonzi ya Siri. Sima na yango, Azaeli akendeki mosika ya Yelusalemi.
Ezekiasi ayambaki bantoma wana na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango.