2 Bakonzi 18:11 - Mokanda na Bomoi11 Mokonzi ya Asiri amemaki bato ya Isalaele na bowumbu na Asiri mpe atiaki bango na Ala, na ngambo ya ebale Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana Nzambe ya Isalaele alamusaki molimo ya Puli, mokonzi ya Asiri, mpe molimo ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na komema na bowumbu : bato ya libota ya Ribeni, ya libota ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. Amemaki bango na Ala, na Abori, na Ara mpe na ngambo ya ebale Gozani, epai wapi bazali kovanda kino lelo.
Boye, mokonzi ya Asiri atindaki mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, elongo na mampinga ya basoda ya nguya, wuta na Lakishi kino na Yelusalemi, epai ya mokonzi Ezekiasi. Tango mokonzi ya basoda yango atelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,