1 Tango Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu misato na bokonzi, Ezekiasi, mwana mobali ya Akazi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
Bongo Oze, mwana mobali ya Ela, asalaki likita mpo na kotelemela Peka, mwana mobali ya Remalia. Abundisaki ye mpe abomaki ye, bongo akitanaki na ye na bokonzi tango Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akokisaki mibu tuku mibale na bokonzi.
Akazi azalaki na mibu tuku mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye ; nzokande, Davidi, koko na ye, asalaki makambo ya sembo.
Akazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Ezekiasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Tango Akazi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Oze, mwana mobali ya Ela, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Akonzaki mibu libwa.
Tango Ezekiasi akokisaki mibu minei na bokonzi, oyo ezalaki mobu ya sambo ya bokonzi ya Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, Salimanasari, mokonzi ya Asiri, abundisaki Samari mpe azingelaki yango.
Akazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba Yelusalemi, kasi kati na bakunda ya bakonzi ya Isalaele te. Ezekiasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abiya. » Abiya azalaki mwana mwasi ya Zakari.
Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda : ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.