Sima na ye koluka toli, mokonzi asalaki bikeko mibale ya bana ngombe ya wolo. Alobaki na bato : — Oh Isalaele, bokeyi mpe mingi na Yelusalemi ! Botala banzambe na bino oyo babimisaki bino na Ejipito.
Bongo mokonzi Akazi akendeki na Damasi mpo na kokutana na Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri ; amonaki etumbelo oyo ezalaki na Damasi mpe atindaki epai ya Nganga-Nzambe Uri elilingi na yango ndenge batongaki yango.
Alandaki banzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango, atumbaki ata mwana na ye ya mobali na moto lokola mbeka, kolanda misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bana ya Isalaele.
Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni.
Kasi likolo ya mitema mabe ya bato na yango, batombokelaki mibeko na Ngai mpe balandaki bikateli na Ngai te ; basalaki mabe koleka bikolo mpe bamboka ya zingazinga, pamba te batiolaki mibeko na Ngai, batambolaki te kolanda mitindo na Ngai.
Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango ; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.
Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.