Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 17:7 - Mokanda na Bomoi

7 Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele basalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na bango, oyo abimisaki bango wuta na bokonzi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito ; bagumbamelaki banzambe mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 17:7
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Salomo akomaki mobange, basi na ye batindikaki motema na ye na kogumbamela banzambe mosusu ; mpe atikaki kolinga Yawe, Nzambe na ye, na motema na ye mobimba ndenge ezalaki motema ya Davidi, tata na ye.


Asalaki masumu nyonso oyo tata na ye asalaki liboso ete Abiyami akoma mokonzi. Apesaki te motema na ye mobimba epai na Yawe, Nzambe na ye, ndenge ezalaki motema ya Davidi, koko na ye.


Akazi azalaki na mibu tuku mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye ; nzokande, Davidi, koko na ye, asalaki makambo ya sembo.


Tango Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele, alobaki na bango : « Bokogumbamela banzambe mosusu te, bokofukamela yango te, bokosalela yango te mpe bokobonzela yango bambeka te ;


Kasi lokola batosaki te Nzambe ya bakoko na bango mpe bakomaki kosalela banzambe ya bato ya mokili oyo Nzambe abebisaki liboso na bango.


Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye.


Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.


Na miso ya bakoko na bango, asalaki bikamwa kati na Ejipito, na etuka ya Tsoani ;


« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Bozali kopela na posa mabe na se ya banzete minene oyo babengaka terebente, na se ya banzete nyonso ya mibesu ; bozali kobonza bana na bino ya mibali lokola bambeka kati na lubwaku mpe kati na mabulu ya mabanga.


Banzambe yango ya bikeko ezali lokola bikeko oyo batiaka na elanga ya bapasiteki mpo na kokimisa bandeke : elobaka te, bamemaka yango mpo ete etambolaka te. Kobanga yango te, pamba te ekokaka kosala bato mabe to malamu te. »


Napesaki bango etumbu kolanda mbindo mpe masumu na bango, mpe napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai.


Yawe asalelaki mosakoli mpo na kobimisa Isalaele wuta na Ejipito, abatelaki ye na nzela ya mosakoli.


Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,


kobonza bambeka na likolo ya bangomba milayi, kotumba ansa lokola mbeka ya malasi na likolo ya bangomba mikuse, na se ya banzete minene oyo epesaka pio ya kitoko lokola sheni, pepiliye mpe terebente ! Mpo na yango, bana na bino ya basi bakosala kindumba, mpe basi ya bana na bino bakosala ekobo.


Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »


soki bobebisi boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, oyo apeselaki bino mitindo, mpe bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango. Kanda ya Yawe ekotumba bino mpe bokosila kokufa noki penza na mokili ya kitoko oyo apesaki bino. »


Nalobaki na bino : Nazali Yawe, Nzambe na bino ; bogumbamela nzambe ya bato ya Amori te, kati na mokili oyo bozali kovanda. Kasi boyokelaki Ngai te. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ