36 kaka Yawe oyo abimisaki bino wuta na Ejipito, na nguya mpe na loboko esembolama, nde bosengeli kogumbamela. Liboso na Ye kaka nde bosengeli kogumbama mpe kobonza bambeka.
Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.
Pamba te kino sik’oyo, nakokaki kosembola loboko na Ngai mpe kotindela yo elongo na bato na yo nyonso, mopepe ya bokono oyo ekokaki kolimwisa bino na mokili.
Obimisaki bato na Yo, Isalaele, na Ejipito na nzela ya bilembo minene mpe bikamwa wana osalelaki nguya na Yo mpe osembolaki loboko na Yo ya nguya mpo na koyeisa somo kati na bato ya Ejipito.
Kanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito, mpe Yawe, Nzambe na bino, abimisaki bino kuna na loboko na Ye ya nguya mpe na loboko na Ye ya kosembolama. Yango wana, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete otosa mokolo ya Saba.
Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.