Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 17:35 - Mokanda na Bomoi

35 Tango Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele, alobaki na bango : « Bokogumbamela banzambe mosusu te, bokofukamela yango te, bokosalela yango te mpe bokobonzela yango bambeka te ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 17:35
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babwakaki bikateli na Ye, boyokani oyo asalaki elongo na bakoko na bango mpe makebisi oyo apesaki bango. Balandaki bikolo oyo ezalaki zingazinga na bango. Yawe apesaki bango mitindo ete basala te lokola bango, kasi bango basalaki kaka makambo oyo Yawe apekisaki bango kosala.


Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai.


Banzambe yango ya bikeko ezali lokola bikeko oyo batiaka na elanga ya bapasiteki mpo na kokimisa bandeke : elobaka te, bamemaka yango mpo ete etambolaka te. Kobanga yango te, pamba te ekokaka kosala bato mabe to malamu te. »


Bolanda banzambe mosusu te, bosalela mpe bofukamela yango te ; bopelisa kanda na Ngai te na nzela ya banzambe ya bikeko oyo maboko na bino esali, mpe Ngai nakomonisa bino pasi te.


Yawe, Nzambe na biso, asalaki boyokani elongo na biso elongo na ngomba Orebi.


Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.


Kosalela banzambe mosusu te, banzambe ya bato oyo bazingeli yo ;


soki bobebisi boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, oyo apeselaki bino mitindo, mpe bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango. Kanda ya Yawe ekotumba bino mpe bokosila kokufa noki penza na mokili ya kitoko oyo apesaki bino. »


Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te.


Nalobaki na bino : Nazali Yawe, Nzambe na bino ; bogumbamela nzambe ya bato ya Amori te, kati na mokili oyo bozali kovanda. Kasi boyokelaki Ngai te. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ