Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 17:34 - Mokanda na Bomoi

34 Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala ; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 17:34
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto yango atunaki Jakobi : — Kombo na yo nani ? Jakobi azongisaki : — Kombo na ngai ezali Jakobi.


Moto yango alobaki lisusu : — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.


Atongaki kuna etumbelo moko oyo abengaki : « El, Nzambe ya Isalaele. »


Nzambe alobaki na ye : « Kombo na yo ezali Jakobi ; kasi okobengama lisusu Jakobi te, kombo na yo ekomi Isalaele. » Yango wana Nzambe apesaki ye kombo « Isalaele. »


mpe alobaki na Jeroboami : « Kamata biteni zomi mpo na yo, pamba te tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobotola bokonzi na maboko ya Salomo mpe nakopesa yo bikolo zomi.


Kasi sik’oyo otindi ngai ete nakende epai ya mokonzi na ngai koyebisa ye ete Eliya azali awa.


Eliya akamataki mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya bana mibali ya Jakobi oyo Yawe alobaki na ye : « Kombo na yo ekozala Isalaele. »


Liboso, tango bazalaki kovanda kuna, bato yango bazalaki kogumbamela Yawe te. Boye Yawe atindaki nkosi kati na bango, mpe ebomaki ndambo ya bato kati na bango.


Atako bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango kolanda bizaleli ya bikolo epai wapi bawutaki.


Kasi bato ya bikolo wana bayokaki te mpe batingamaki kaka na bizaleli na bango ya kala.


Nzambe ayokaka, akosambwisa bango penza ; akonzaka mpo na libela na libela. Babongolaka mitema te mpe batosaka Nzambe te.


Moto oyo atambolaka alima atosaka Yawe, kasi moto oyo nzela na ye etengama-tengama atiolaka Ye.


Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ