Eliya apusanaki pene na bato mpe alobaki : — Kino tango nini bokotambola lokolo moko na zamba mpe lokolo mosusu na nzela ? Soki Yawe azali Nzambe, tika ete bolanda Ye ! Kasi soki mpe Bala, bolanda ye. Bato bazongisaki ata eloko moko te.
Bato ya bikolo yango bazalaki na bango kotosa Yawe, kasi baponaki lisusu kati na bango bato mpo na kosala mosala ya bonganga-nzambe kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba.
Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala ; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. »
Atako bato ya bikolo yango bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko. Kino lelo, bana na bango mpe bakitani na bango bazali kokoba kosala makambo oyo bakoko na bango bazalaki kosala.
Mitema na bango etondi na mabe mpe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango. Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bango mpe akopanza mabanga na bango ya bule.
bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,