Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 17:27 - Mokanda na Bomoi

27 Boye mokonzi ya Asiri apesaki mitindo oyo : — Botinda kuna moko kati na Banganga-Nzambe oyo bomemaki na bowumbu wuta na Samari mpo ete avanda kuna mpe alakisa bato makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 17:27
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jeroboami atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atiaki banganga-nzambe oyo bazalaki ata te bato ya libota ya Levi.


Kolanda etinda na Yawe, moto na Nzambe agangaki makasi mpo na kolakela etumbelo mabe : « Etumbelo, etumbelo ! Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Mwana mobali moko akobotama na ndako ya Davidi, kombo na ye ekozala Joziasi. Akotumba na likolo na yo lokola mbeka banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba, oyo batumbaka ansa na likolo na yo. Mpe na likolo na yo, etumbelo, bakotumba mikuwa ya bato ! › »


Bayebisaki mokonzi ya Asiri : — Bikolo oyo omemaki na bowumbu mpe otiaki kati na bingumba ya Samari bayebi te makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka. Boye Nzambe atindi kati na bango nkosi oyo ezali koboma bango, pamba te bato yango bayebi te makambo oyo Nzambe yango alingaka.


Boye moko kati na Banganga-Nzambe oyo bamemaki na bowumbu wuta na Samari ayaki kovanda na Beteli mpe alakisaki bango kogumbamela Yawe.


Boye, ye moko Jeroboami aponaki banganga-nzambe mpo na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe mpo na banzambe ya bikeko oyo asalaki na lolenge ya bantaba ya mibali mpe ya bana ngombe.


Bongo yo, Esidrasi, kolanda bwanya ya Nzambe na yo, oyo ozali na yango, pona bilombe mpe basambisi mpo na mosala ya kokata makambo ya bato nyonso oyo, kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, bayebi mibeko ya Nzambe na yo ; mpe lakisa yango na bato oyo bayebi yango te.


Mika alobaki : « Sik’oyo nayebi ete Yawe akosalela ngai bolamu lokola moto ya libota ya Levi akomi nganga-nzambe na ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ