mpe moto na Nzambe azongelaki nzela na ye. Wana azalaki kokende, akutanaki na nkosi na nzela, mpe nkosi yango ebomaki ye. Ebembe na ye etikalaki na nzela, nkosi mpe ane etelemaki pembeni ya ebembe na ye.
Bongo alobaki na ye : — Lokola oboyi kotosa Liloba na Yawe, tango kaka okotika ngai, nkosi ekoboma yo. Moninga na ye akendeki, akutanaki na nkosi, mpe ebomaki ye.
Bayebisaki mokonzi ya Asiri : — Bikolo oyo omemaki na bowumbu mpe otiaki kati na bingumba ya Samari bayebi te makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka. Boye Nzambe atindi kati na bango nkosi oyo ezali koboma bango, pamba te bato yango bayebi te makambo oyo Nzambe yango alingaka.
Bato ya bikolo yango bazalaki na bango kotosa Yawe, kasi baponaki lisusu kati na bango bato mpo na kosala mosala ya bonganga-nzambe kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba.
Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala ; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. »
Atako bato ya bikolo yango bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko. Kino lelo, bana na bango mpe bakitani na bango bazali kokoba kosala makambo oyo bakoko na bango bazalaki kosala.
Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango.
Oh Mokonzi ya bikolo, nani akoki koboya kotosa Yo ? Obongi na lokumu, pamba te moko te azali lokola Yo kati na bato nyonso ya bwanya ya bikolo mpe kati na mikili na bango nyonso.
To soki natindi banyama mabe kati na ekolo yango mpo ete eboma bavandi na yango, mpe mpo ete ekolo yango etikala lisusu na bato te mpe bato balekela lisusu wana te mpo na banyama mabe yango ;
Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato.
Yawe atiaki ebale Yordani lokola mondelo kati na biso mpe bino ; bino bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi ! Bozali na libula moko te epai na Yawe ! » Boye, bakitani na bino bakoki kosala ete bakitani na biso batika kobanga Yawe.