Nzokande, Jewu asalaki bokebi te mpo na kobatela mibeko ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema na ye mobimba. Atikaki te masumu ya Jeroboami oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu.
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo akweyisaki na yango Isalaele. Joasi akobaki kaka na masumu yango.
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, wana alandaki masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati. Jeroboami akweyisaki na yango Isalaele na lisumu, mpe Yoakazi atikaki te lisumu yango.
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Na tango nyonso ya bokonzi na ye, atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
Pekakia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge bakoko na ye basalaki. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
Tango Akazi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Oze, mwana mobali ya Ela, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Akonzaki mibu libwa.