Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 16:9 - Mokanda na Bomoi

9 Mokonzi ya Asiri ayokaki ye, akendeki kobundisa Damasi mpe abotolaki yango. Amemaki bato ya Damasi na bowumbu na Kiri mpe abomaki Retsini.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 16:9
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Babotolaki Iyoni, Dani, Abele-Mayimi mpe bibombelo nyonso ya bingumba ya Nefitali.


Akazi azwaki ndambo ya biloko ya Tempelo ya Yawe, ya ndako ya mokonzi mpe ya bandako ya bakambi ; mpe apesaki yango epai ya mokonzi ya Asiri. Kasi atako bongo, azwaki kaka lisungi te.


Yawe, Nzambe na ye, akabaki ye na maboko ya mokonzi ya Siri. Bato ya Siri babetaki ye, bazwaki bato na ye ebele na bowumbu mpe bamemaki bango na Damasi. Nzambe akabaki ye lisusu na maboko ya mokonzi ya Isalaele, oyo abebisaki biloko na ye mpe alongaki ye.


Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi ? Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te ? Engumba Samari, lokola engumba Damasi te ?


Maloba ya kosambisa Damasi : « Tala, Damasi ekotikala lisusu engumba te, ekokoma nde liboke ya libebi.


Mampinga ya Elami batomboli makonga, mosusu bamati na bashar mpe bampunda ; Kiri abimisi nguba.


Oh Yawe, ezali ya solo ete bakonzi ya Asiri babebisaki bikolo nyonso mpe mikili na bango.


Kasi liboso ete mwana yango ayeba koboya mabe mpe kopona bolamu, mikili ya bakonzi mibale oyo ozali kobanga ekobebisama.


Kasi Yawe alendisaki bayini ya Retsini mpo na kobundisa bango mpe apelisaki mitema ya banguna na bango mpo ete batombokela bango.


Bato ya Siri na liboso, mpe bato ya Filisitia na sima, bapasolaki Isalaele mpe baliaki ye na lokoso. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.


Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te na bato ya mokili ya Kushi ? » elobi Yawe. « Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito, bato ya Filisitia wuta na Kreti, bato ya Siri wuta na Kiri ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ