Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 16:18 - Mokanda na Bomoi

18 Abongolaki shambre ya Saba ya kokotela oyo batongaki na kati ya Ndako ya Nzambe ; abongolaki lisusu ekuke ya mokonzi oyo batongaki na libanda ya Tempelo ya Yawe mpo na kosepelisa mokonzi ya Asiri.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 16:18
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bilei oyo azalaki kolia na mesa na ye, ndako ya basali na ye, esaleli mpe elateli ya basali na ye, basali oyo bapesaka ye masanga mpe bambeka ya kotumba oyo azalaki kobonza kati na Tempelo ya Yawe, mwasi mokonzi ya Saba akamwaki makasi


Apesaki bango mitindo oyo : « Tala ndenge bokosala : kati na bandambo misato ya lisanga na bino, ndambo moko bakosala na mokolo ya Saba ; ndambo ya liboso bakokengela ndako ya mokonzi,


Mokonzi Akazi alongolaki mabaya oyo esimbaka bamesa, mpe alongolaki basani ya minene na likolo na yango ; akitisaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na likolo ya bikeko ya bangombe mpe atiaki yango na likolo ya mabanga babongisa malamu.


Makambo mosusu oyo etali mokonzi Akazi mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.


Kino lelo, bakitani ya Shalumi bakengelaka ekuke ya ngambo ya este ya Ndako ya Nzambe, ekuke oyo babengaka ekuke ya Mokonzi. Bango wana nde bakengeli bikuke kati na Balevi.


Kasi mokambi, ye kaka, lokola azali mokambi nde akoki kovanda na kati mpo na kolia bilei liboso ya Yawe ; akokotela na nzela ya ndako moke ya kokotela mpe akobimela kaka na nzela wana. »


Mokambi akokota na kati, wuta na libanda ; akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akotelema na mabaya oyo esimbaka ekuke. Banganga-Nzambe bakobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani. Akogumbama na ekotelo ya ekuke mpe akobima na libanda, kasi ekuke ekozala ya kofungwama kino na pokwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ