Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 16:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mokonzi Akazi apesaki mitindo epai ya Nganga-Nzambe Uri : « Na likolo ya etumbelo monene ya sika, okobanda kobonza mbeka ya kotumba na tongo mpe likabo ya gato na pokwa, mbeka ya kotumba ya mokonzi elongo na likabo na yango ya gato, mpe mbeka ya kotumba ya bato nyonso ya mokili elongo na likabo na bango ya masanga. Okobwaka na etumbelo makila ya bambeka nyonso ya kotumba mpe ya bambeka mosusu. Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze, nakokanisa mosala nini nakosala na yango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 16:15
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na nini boyibi kopo oyo nkolo na ngai amelelaka mayi mpe asalelaka mpo na koyeba makambo oyo ekoya ? Likambo oyo bosali ezali penza mabe. »


Mokonzi akendeki na Gabaoni mpo na kobonza mbeka, pamba te ezalaki esambelo ya likolo ya ngomba oyo elekaki motuya, mpe kuna, Salomo abonzaki bambeka ya kotumba nkoto moko, na etumbelo wana.


Irami asalaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu : monene na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; mpe zingazinga na yango, bametele pene zomi na mitano.


Na mokolo yango, mokonzi abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana mbeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani ; pamba te etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe elekaki moke mpo na koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani.


Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe, alongolaki yango na esika na yango liboso ya Ndako ya Nzambe, kati na etumbelo ya sika mpe Tempelo ya Yawe, mpe atiaki yango pembeni ya etumbelo ya sika, na ngambo ya nor.


Nganga-Nzambe Uri asalaki ndenge kaka mokonzi Akazi atindaki.


Alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko, mpe akataki likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera. Abukaki-bukaki nyoka ya ebende oyo Moyize asalaki, pamba te kino na tango wana, bana ya Isalaele bazalaki kotumba ansa mpo na nyoka yango mpe kobenga yango « Nekushitani. »


Na tongo ya mokolo oyo elandaki, na tango oyo batumbaka mbeka, mayi ebandaki kotiola na nzela ya Edomi, mpe mabele etondaki na mayi.


Tala motango ya bambeka ya kotumba oyo lisanga ebonzaki : bangombe ya mibali tuku sambo, bameme ya mibali nkama moko, bana meme nkama mibale : nyonso lokola bambeka ya kotumba mpo na Yawe.


Longola bambeka ya kotumba oyo ezalaki mingi, esengelaki lisusu kotumba mafuta ya bambeka ya boyokani mpe kosopa bambeka ya masanga mpo na bambeka ya kotumba. Ezali boye nde babongisaki lisusu misala ya Tempelo ya Yawe.


Manase abonzaki na moto, lokola mbeka, bana na ye ya mibali, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji ; atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; na bongo, apelisaki kanda na Ye.


Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi, mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este ; bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia, bazali kosala boyokani elongo na bapagano.


Mampinga ya basoda na ye bakotelema mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo mpe kobuka engumba batonga makasi ; bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo mpe bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi.


Wuta tango oyo bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo kino tango oyo bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi, ekoleka mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku libwa.


wana nazalaki nanu koloba, kati na losambo, Gabrieli, moto oyo namonaki liboso kati na emoniseli, ayaki epai na ngai na lombangu, na tango ya makabo ya pokwa.


Na poso moko, akosala boyokani moko elenda elongo na bato ebele ; kasi na kati-kati ya poso yango, akosukisa bambeka mpe makabo. Likolo ya kobomba makambo ya nkele, mobebisi moko akobima kino tango libebi oyo ekatama mpo na mobebisi ekokokisama. »


Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ