2 Bakonzi 16:14 - Mokanda na Bomoi14 Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe, alongolaki yango na esika na yango liboso ya Ndako ya Nzambe, kati na etumbelo ya sika mpe Tempelo ya Yawe, mpe atiaki yango pembeni ya etumbelo ya sika, na ngambo ya nor. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi Akazi apesaki mitindo epai ya Nganga-Nzambe Uri : « Na likolo ya etumbelo monene ya sika, okobanda kobonza mbeka ya kotumba na tongo mpe likabo ya gato na pokwa, mbeka ya kotumba ya mokonzi elongo na likabo na yango ya gato, mpe mbeka ya kotumba ya bato nyonso ya mokili elongo na likabo na bango ya masanga. Okobwaka na etumbelo makila ya bambeka nyonso ya kotumba mpe ya bambeka mosusu. Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze, nakokanisa mosala nini nakosala na yango. »
Tango batiaki bikotelo na bango pene ya ekotelo na Ngai, mabaya oyo esimbaka bikuke na bango pene ya mabaya oyo esimbaka ekuke na Ngai, bongo mir moko kaka nde ekabolaki bango na Ngai, babebisaki nde bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya misala na bango ya mbindo ; yango wana, Ngai mpe nabebisaki bango na kanda na Ngai.