Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 16:12 - Mokanda na Bomoi

12 Tango mokonzi Akazi azongaki wuta na Damasi, amonaki etumbelo, apusanaki pene na yango mpe abonzaki bambeka na likolo na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 16:12
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe, sanza oyo aponaki na ndenge na ye moko, abonzaki mbeka na etumbelo oyo atongaki na Beteli. Akataki ete basalaka feti mibu nyonso mpo na bana ya Isalaele mpe amataki na etumbelo mpo na kotumba ansa.


Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.


Boye Nganga-Nzambe Uri atongaki etumbelo kolanda elilingi oyo mokonzi Akazi atindaki wuta na Damasi, mpe asilisaki kotonga yango liboso ete mokonzi Akazi azonga wuta na Damasi.


Atumbaki mbeka na ye mpe likabo ya gato, asopaki likabo ya masanga mpe abwakaki makila ya bambeka ya boyokani na likolo ya etumbelo.


abonzaki bambeka epai ya banzambe ya Damasi oyo elongaki ye, pamba te amilobelaki : « Lokola banzambe ya bakonzi ya Siri bayaka kosunga bato na bango, ngai mpe nakobonzela bango bambeka mpo ete baya kosunga ngai ! » Kasi esalaki ete ye akweyisama, Isalaele mobimba mpe ekweyisama.


Kati na bingumba nyonso ya Yuda, asalaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na kobonza mbeka ya malasi epai ya banzambe mosusu. Na bongo, apesaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, kanda makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ