Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 16:11 - Mokanda na Bomoi

11 Boye Nganga-Nzambe Uri atongaki etumbelo kolanda elilingi oyo mokonzi Akazi atindaki wuta na Damasi, mpe asilisaki kotonga yango liboso ete mokonzi Akazi azonga wuta na Damasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 16:11
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo mokonzi Akazi akendeki na Damasi mpo na kokutana na Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri ; amonaki etumbelo oyo ezalaki na Damasi mpe atindaki epai ya Nganga-Nzambe Uri elilingi na yango ndenge batongaki yango.


Tango mokonzi Akazi azongaki wuta na Damasi, amonaki etumbelo, apusanaki pene na yango mpe abonzaki bambeka na likolo na yango.


Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe, alongolaki yango na esika na yango liboso ya Ndako ya Nzambe, kati na etumbelo ya sika mpe Tempelo ya Yawe, mpe atiaki yango pembeni ya etumbelo ya sika, na ngambo ya nor.


Nganga-Nzambe Uri asalaki ndenge kaka mokonzi Akazi atindaki.


Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki : « Nakotia Kombo na Ngai kati na Yelusalemi. »


Atiaki kati na Tempelo ya Yawe ekeko ya Ashera, oyo asalisaki ; nzokande, Yawe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali : « Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele.


Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki : « Kombo na Ngai ekozala kati na Yelusalemi mpo na libela. »


Nabengaki Nganga-Nzambe Iri mpe Zakari, mwana mobali ya Yeberekia, mpo ete bazala batatoli na ngai ya sembo.


« Basakoli mpe Banganga-Nzambe, basundoli Nzambe ; ezala kati na Tempelo na Ngai, nazali komona misala na bango ya mabe, » elobi Yawe.


Banganga-Nzambe na yango bazali kobuka mobeko na Ngai mpe bazali kobebisa bosantu ya biloko na Ngai ya bule, bazali kosala bokeseni te kati na biloko ya bule mpe biloko mosusu, bazali kosunga bato te ete bayeba kosala bokeseni kati na makambo oyo ezali mbindo mpe oyo ya peto ; bakangeli Basaba na Ngai miso, boye babulisi Ngai te kati na bango.


Yango wana, tango kaka bayokaki lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya bibetelo mindule lolenge nyonso, bato ya bikolo nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso bafukamaki mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki.


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


Efrayimi azali konyokwama, anyatami na etumbu, pamba te akangamaki na kolanda kaka banzambe ya bikeko.


Bozali sik’oyo kokanisa nini na likambo oyo : nazali koluka kosepelisa bato to nazali koluka kosepelisa Nzambe ? Boni, nazali koluka kosepelisa bato ? Soki nazalaki nanu koluka kosepelisa bato, nalingaki kozala mosali ya Klisto te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ