2 Bakonzi 16:10 - Mokanda na Bomoi10 Bongo mokonzi Akazi akendeki na Damasi mpo na kokutana na Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri ; amonaki etumbelo oyo ezalaki na Damasi mpe atindaki epai ya Nganga-Nzambe Uri elilingi na yango ndenge batongaki yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Soki bayoki penza soni mpo na makambo nyonso oyo basalaki, lakisa bango ndenge nini Tempelo ezali : ndenge basalela yango, bikuke mpe bikotelo na yango, ndenge batambolisaka yango, mibeko nini balandaka mpe ndenge nini basalaka losambo ; koma yango, na miso na bango, mpo ete bakoka kolandela yango mpe kotia yango na misala.
Tango batiaki bikotelo na bango pene ya ekotelo na Ngai, mabaya oyo esimbaka bikuke na bango pene ya mabaya oyo esimbaka ekuke na Ngai, bongo mir moko kaka nde ekabolaki bango na Ngai, babebisaki nde bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya misala na bango ya mbindo ; yango wana, Ngai mpe nabebisaki bango na kanda na Ngai.