Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 16:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na mobu ya zomi na sambo ya bokonzi ya Peka, mwana mobali ya Remalia, Akazi, mwana mobali ya Yotami, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 16:1
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Tango Akazi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Oze, mwana mobali ya Ela, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Akonzaki mibu libwa.


Yotami azalaki tata ya Akazi, Akazi azalaki tata ya Ezekiasi, Ezekiasi azalaki tata ya Manase,


Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda.


Tango Akazi, mwana mobali ya Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akomaki mokonzi ya Yuda, Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bakendeki kobundisa Yelusalemi, kasi bakokaki kolonga yango te.


Boye, Yawe alobaki na Ezayi : « Kende, yo elongo na Sheari-Yashubi, mwana na yo ya mobali, kokutana na Akazi na suka ya nzela ya mayi oyo ekenda kino na liziba monene, na nzela ya bilanga ya moto oyo atiaka balangi na bilamba ;


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Oze, mwana mobali ya Beri, tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda, mpe tango Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele :


Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda : ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ