7 Azaria akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi ; mpe Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Zakari, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari ; mpe akonzaki basanza motoba.
Oziasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bango kati na lilita ya bakonzi, pamba te bato bazalaki koloba : « Abelaki bokono ya maba. » Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo.
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Oze, mwana mobali ya Beri, tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda, mpe tango Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele :