Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 15:37 - Mokanda na Bomoi

37 Na mikolo wana, Yawe abandaki kotinda Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mpo na kobundisa Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 15:37
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Yawe abandaki kokomisa moke bandelo ya Isalaele. Azaeli alongaki bana ya Isalaele, na mokili na bango,


Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na mibale na bokonzi, Peka, mwana mobali ya Remalia, akomaki mokonzi ya Isalaele, na Samari ; mpe akonzaki mibu tuku mibale.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.


Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Bongo Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bamataki mpo na kobundisa Yelusalemi mpe bazingelaki Akazi, kasi bakokaki kolonga ye te.


Na mokolo moko, Peka, mwana mobali ya Remalia, abomaki basoda nkoto nkama moko na tuku mibale kati na Yuda, bango nyonso bazalaki basoda ya mpiko ; pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.


Atindelaki bango kanda na Ye ya makasi lokola moto : kanda makasi, kotomboka, pasi mpe ba-anjelu oyo babebisaka.


Tango Akazi, mwana mobali ya Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akomaki mokonzi ya Yuda, Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bakendeki kobundisa Yelusalemi, kasi bakokaki kolonga yango te.


Pamba te moto ya Siri ezali Damasi, mpe moto ya Damasi ezali na yango kaka Retsini. Etikali kaka mibu tuku motoba na mitano, Efrayimi ekobebisama mpe ekozala lisusu na molongo ya mabota te.


Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.


Pamba te, botala ! Ezali na engumba epai wapi babelelaka Kombo na Ngai nde nabandi kotinda pasi ; boni, bokanisi ete bino bokozwa etumbu te ? Bokozanga te kozwa etumbu, pamba te nazali koyeisa mopanga kati na bavandi nyonso ya mokili, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›


Loba na bango : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobengisa mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe nakotelemisa kiti na ye ya bokonzi na likolo ya mabanga oyo nasili kokunda na esika oyo ; akotanda ndako na ye ya kapo ya bokonzi na likolo na yango.


Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.


tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino.


Na tango wana, nakokokisa makambo nyonso oyo nayebisaki Eli mpo na kotelemela libota na ye, wuta na ebandeli kino na suka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ