Moko kati na bakonzi na ye ya basoda, Peka, mwana mobali ya Remalia, asalelaki ye likita. Na lisungi ya bato tuku mitano ya Galadi, Peka abomaki Pekakia kati na ndako ya mokonzi, na Samari, na lisungi ya Arigobi mpe Arie. Boye Peka abomaki Pekakia mpe akitanaki na ye na bokonzi.
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na mibale na bokonzi, Peka, mwana mobali ya Remalia, akomaki mokonzi ya Isalaele, na Samari ; mpe akonzaki mibu tuku mibale.
Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi, misala na ye nyonso ya nguya mpe ndenge asalaki liziba mpe nzela ya se ya mabele oyo amemaki mayi kino na engumba, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.