Menayeme azwaki palata yango na Isalaele. Mozwi nyonso asengelaki kofuta mpako ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano mpo ete bapesa yango epai ya mokonzi ya Asiri. Na bongo, mokonzi ya Asiri alongwaki na mokili mpe azongaki epai na ye.
Tango bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu kati na mokili songolo, ezala ya mosika to ya pene,