Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 15:19 - Mokanda na Bomoi

19 Bongo Puli, mokonzi ya Asiri, akotaki na makasi kati na mboka, mpe Menayeme apesaki ye bakilo ya palata, nkoto tuku misato na minei mpo ete Puli asunga ye na kolendisa bokonzi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 15:19
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Azaeli, mokonzi ya Siri, akendeki kobundisa engumba Gati mpe abotolaki yango. Sima, Azaeli abalukaki mpo na kobundisa Yelusalemi.


Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye.


Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Na tango nyonso ya bokonzi na ye, atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.


Menayeme azwaki palata yango na Isalaele. Mozwi nyonso asengelaki kofuta mpako ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano mpo ete bapesa yango epai ya mokonzi ya Asiri. Na bongo, mokonzi ya Asiri alongwaki na mokili mpe azongaki epai na ye.


Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.


Akazi azwaki palata mpe wolo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi ; bongo atindaki yango lokola kado epai ya mokonzi ya Asiri.


Na tango wana, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alongolaki wolo oyo asalelaki mpo na kolatisa bikuke mpe mabaya oyo esimbaka bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpe apesaki yango epai ya mokonzi ya Asiri.


Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.


Gebali, Amoni mpe Amaleki, bato ya Filisitia elongo na bato ya Tiri.


Bato oyo bazalaki kotambola kati na molili bamoni pole makasi ; ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, pole engengeli bango.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika ete moto oyo atiaka elikya na moto, oyo ayekamelaka eloko ya pete mpe atalelaka Yawe te, alakelama mabe !


Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela, oyo nkosi ezalaki kolanda : Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso oyo apasolaki Isalaele ; Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni, azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa.


Ohola amipesaki na kindumba tango azalaki nanu ya Ngai mpe akufelaki kolinga bamakangu na ye, bato ya Asiri, bilombe ya bitumba


Bakomema ekeko ya mwana ngombe yango na Asiri lokola likabo mpo na mokonzi monene. Efrayimi akoyoka soni, mpe Isalaele akosambwa mpo na mabongisi oyo basalaki.


Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ