Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 15:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bongo Menayeme, mwana mobali ya Gadi, alongwaki na Tiritsa mpe akendeki na Samari. Abundisaki Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, na Samari ; abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 15:14
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi ya Jeroboami atelemaki, akendeki mpe akomaki na Tiritsa. Tango akomaki na ekuke ya ndako na ye, mwana na ye ya mobali akufaki.


Tango kaka Baesha ayokaki bongo, atikaki kolendisa engumba Rama mpe akendeki kovanda na Tiritsa.


Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, Baesha, mwana mobali ya Ayiya, akomaki mokonzi ya Isalaele mobimba, na Tiritsa. Asalaki mibu tuku mibale na minei na bokonzi.


Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi ; Zimiri akonzaki na Tiritsa, mikolo sambo. Mampinga ya basoda ya Isalaele batongaki molako na bango pembeni ya Gibetoni, engumba ya bato ya Filisitia, mpo na kobundisa yango.


Bongo Omiri elongo na bato nyonso ya Isalaele balongwaki na Gibetoni mpe bakendeki kozingela Tiritsa.


Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, asalelaki Zakari likita, abundisaki ye liboso ya bato, abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi.


Makambo mosusu oyo etali Shalumi, misala na ye mpe likita oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.


Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Menayeme, mwana mobali ya Gadi, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki na Samari mibu zomi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ