Tango Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi, akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari mpe akonzaki mibu tuku minei na moko.
Jeroboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele ; mpe Zakari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Tango Oziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, akomaki mokonzi. Akonzaki na Samari sanza moko.
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Menayeme, mwana mobali ya Gadi, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki na Samari mibu zomi.
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na bokonzi, Pekakia, mwana mobali ya Menayeme, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari, mpe akonzaki mibu zomi na mibale.
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na mibale na bokonzi, Peka, mwana mobali ya Remalia, akomaki mokonzi ya Isalaele, na Samari ; mpe akonzaki mibu tuku mibale.
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Zakari, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari ; mpe akonzaki basanza motoba.
Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda.