Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi mpe misala na ye nyonso, bakisa bitumba oyo abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Kasi Amatsia ayokaki ye te. Boye, Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda.
Sima na ye kolonga bato ya Edomi na bitumba, Amatsia azongaki epai na ye ; amemaki banzambe ya bikeko ya bato ya Seiri, akomisaki yango banzambe na ye moko, agumbamelaki yango mpe atumbelaki yango mbeka ya malasi.