Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 14:28 - Mokanda na Bomoi

28 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jeroboami, misala na ye nyonso mpe elonga na ye na bitumba, ezala ndenge azongisaki na se ya bokonzi ya Isalaele Damasi mpe Amati, bingumba mibale oyo ezalaki ya Yuda, nyonso wana ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 14:28
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Rezoni asangisaki mibali pene na ye mpe akomaki mokambi ya lisanga ya batomboki tango Davidi abomaki mampinga ya Tsoba. Bongo batomboki bakendeki na Damasi epai wapi bavandaki mpe bakomaki kokonza.


Misala mosusu ya Jeroboami, bitumba mpe bokonzi na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akazia mpe misala oyo asalaki ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.


Joasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele. Mpe Jeroboami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Jeroboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele ; mpe Zakari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Batangaki bato nyonso oyo tango Yotami azalaki mokonzi ya Yuda mpe Jeroboami, mokonzi ya Isalaele.


Nakobuka ekuke ya Damasi, nakobebisa mokonzi ya bavandi ya Lubwaku ya Beti-Aveni, mpe oyo azali kokonza na Beti-Edeni ; mpe bato ya Siri bakokende na bowumbu na Kiri, » elobi Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ