Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 14:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bamemaki nzoto na ye na likolo ya mpunda mpe bakundaki ye na Yelusalemi, esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 14:20
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na yango, Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.


Davidi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi.


Basali na ye batombokelaki ye mpe basalelaki ye likita. Babomaki Joasi, na Beti-Milo, na nzela oyo ekenda na Sila.


Basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye, mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna.


Bato nyonso ya Yuda bakamataki Azaria oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya tata na ye, Amatsia.


Yorami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Basali na ye bamemaki ye na shar kino na Yelusalemi mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na kunda na ye kati na engumba ya Davidi.


Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. Akendeki kaka ndenge wana, moto ata moko te ayokaki mawa. Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te.


Oziasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bango kati na lilita ya bakonzi, pamba te bato bazalaki koloba : « Abelaki bokono ya maba. » Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ