Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango.
Na pokwa, makelele moko ezalaki kotambola kati na mampinga : « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye ; tika ete moto na moto azonga na mabele na ye ! »
Boye bato ya Filisitia babundisaki bato ya Isalaele mpe balongaki. Moto nyonso akimaki na ndako na ye ya kapo. Kokweyisama ya bato ya Isalaele ezalaki ya makasi penza : motango ya basoda ya Isalaele, oyo babundaka na makolo mpe bakufaki ezalaki nkoto tuku misato.