Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 14:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele, Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 14:1
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basali na ye batombokelaki ye mpe basalelaki ye likita. Babomaki Joasi, na Beti-Milo, na nzela oyo ekenda na Sila.


Na mobu ya tuku misato na sambo ya bokonzi ya Joasi, mokonzi ya Yuda, Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na motoba.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi, misala na ye mpe elonga na ye tango abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.


Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele.


Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi.


Tango Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi, akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari mpe akonzaki mibu tuku minei na moko.


Joasi azalaki tata ya Amatsia, Amatsia azalaki tata ya Azaria, Azaria azalaki tata ya Yotami,


Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele.


Bato nyonso ya Yuda baponaki Oziasi oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya Amatsia, tata na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ