2 Bakonzi 13:7 - Mokanda na Bomoi7 Kati na mampinga nyonso ya Yoakazi, etikalaki kaka na mibali tuku mitano oyo batambolisaka bampunda, bashar zomi, mpe basoda oyo batambolaka na makolo, nkoto zomi, pamba te mokonzi ya Siri abomaki bamosusu oyo batikalaki, mpe akomisaki bango lokola putulu oyo banyataka na makolo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Akabi mpe na ngambo na ye, asangisaki bato ya Isalaele mpe apesaki bango bibundeli ; boye babimaki mpo na kobundisa bato ya Siri. Bato ya Isalaele batongaki milako oyo ezalaki kotalana na bato ya Siri. Mampinga na bango ezalaki lokola bitonga mibale ya mike ya bantaba wana bato ya Siri batondaki na etando mobimba.
Azaeli atunaki : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ? Elize azongisaki : — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.
Nani abimisaki wuta na este moto oyo bosembo ezali kobenga na makolo na yango, oyo elonga elandaka matambe na Ye ? Nani akabaki bikolo na maboko na Ye mpe atiaki bakonzi na se ya bokonzi na Ye ? Mopanga na Ye ekomisaki bango putulu, mpe tolotolo na Ye ekomisaki bango lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ememaka.
« Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka, ndenge nasalaki kati na Ejipito ; nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino ; mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe oyo ekufaki na molako na bino. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.