Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 13:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bongo Elize abakisaki : — Zwa makonga. Mokonzi azwaki yango. Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Beta yango na mabele. Joasi abetaki yango mbala misato mpe atikaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 13:18
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elize alobaki : — Fungola lininisa oyo ezali na ngambo ya este. Joasi afungolaki yango. Elize alobaki : — Beta ! Joasi abetaki. Elize alobaki : — Ezali likonga ya elonga ya Yawe, likonga ya elonga liboso ya bato ya Siri. Okosilisa bato ya Siri, na Afeki.


Moto na Nzambe asilikelaki ye mpe alobaki : — Ebongaki na yo kobeta yango na mabele mbala mitano to mbala motoba, boye olingaki kolonga bato ya Siri mpe kosilisa bango nye. Kasi sik’oyo, okolonga bato ya Siri kaka mbala misato.


Bongo Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, abotolaki na maboko ya Beni-Adadi, mwana ya Azaeli, bingumba oyo Azaeli abotolaki na bitumba epai ya Yoakazi, tata ya Joasi. Joasi alongaki Azaeli mbala misato mpe abotolaki bingumba ya Isalaele.


Tango bambeki nyonso etondaki, alobaki na moko kati na bana na ye ya mibali : — Pesa ngai lisusu mbeki moko. Kasi mwana yango azongiselaki ye : — Bambeki nyonso esili. Kaka na tango yango, mafuta etikaki kobima.


Tango nyonso Moyize abandaki kotombola maboko na ye mpo na kobondela, bana ya Isalaele bazalaki kolonga ; kasi tango nyonso azalaki kokitisa maboko na ye, bato ya Amaleki bazalaki kolonga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ