16 Bongo Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Simba tolotolo na maboko na yo. Tango Joasi asimbaki tolotolo, Elize atiaki maboko na ye na likolo ya maboko ya mokonzi.
kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye, mpe maboko na ye etikalaki kolenga te mpo na loboko ya Elombe ya Jakobi, oyo azali Mobateli mpate, Libanga ya Isalaele.
Bongo Elize amataki na mbeto mpe alalelaki mwana mobali, atutisaki monoko na ye na monoko ya mwana, miso na ye na miso ya mwana, mpe maboko na ye na maboko ya mwana. Lokola amitandaki bongo na likolo ya mwana mobali, nzoto ya mwana mobali ekomaki moto.