Elize abelaki bokono oyo ememaki ye na kufa. Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kotala ye mpe alelaki na miso na ye na maloba oyo : — Tata na ngai ! Tata na ngai ! Ozali bashar mpe bampunda ya Isalaele !
Bongo Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Simba tolotolo na maboko na yo. Tango Joasi asimbaki tolotolo, Elize atiaki maboko na ye na likolo ya maboko ya mokonzi.
mpe ayaki kokutana na biso ; azwaki mokaba ya Polo mpe amikangaki na yango makolo mpe maboko. Alobaki : — Tala makambo oyo Molimo Mosantu alobi : « Ezali na lolenge oyo nde Bayuda ya Yelusalemi bakokanga nkolo mokaba oyo, mpe bakokaba ye na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. »