Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 13:10 - Mokanda na Bomoi

10 Na mobu ya tuku misato na sambo ya bokonzi ya Joasi, mokonzi ya Yuda, Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na motoba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 13:10
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na Jewu : « Lokola osali malamu mpo na kokokisa oyo ezali sembo na miso na Ngai, mpe lokola osali na libota ya Akabi nyonso oyo nakanaki kosala, bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. »


Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi.


Na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Akazia, mokonzi ya Yuda, Yoakazi, mwana mobali ya Jewu, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na sambo.


Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo akweyisaki na yango Isalaele. Joasi akobaki kaka na masumu yango.


Yoakazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Joasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele, Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.


Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele.


Boye nde Liloba oyo Yawe alobaki na Jewu ekokisamaki : « Bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ