Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 12:9 - Mokanda na Bomoi

9 Banganga-Nzambe bandimaki kotika kokongola mbongo na maboko ya bato mpe kotika kobongisa Ndako ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 12:9
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, mokonzi Joasi abengisaki Nganga-Nzambe Yeoyada mpe Banganga-Nzambe mosusu. Atunaki bango : « Mpo na nini bozali kobongisa te biloko oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe ? Sik’oyo, bokozwa lisusu mbongo te na maboko ya babombi mbongo na bino, kasi botika yango mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe. »


— Kende koyebisa Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ete atanga mbongo nyonso oyo bato bamemaki na Tempelo ya Yawe mpe oyo bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe bakongolaki.


Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai ya Banganga-Nzambe oyo balandi mpe epai ya bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpo ete balongola kati na Tempelo ya Yawe, biloko nyonso oyo esalema mpo na Bala, mpo na nzambe mwasi Ashera, mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo. Mokonzi atumbaki yango libanda ya Yelusalemi, kati na bilanga ya lubwaku ya Sedron, mpe amemaki putulu na yango na Beteli.


Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.


Mpe mpo na kosunga bango, baponaki Balevi mosusu : Zakari, Beni, Yazieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Benaya, Maaseya, Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli. Bango nyonso bazalaki bakengeli bikuke.


Banganga-Nzambe Shebania, Jozafati, Netaneeli, Amasayi, Zakari, Benaya mpe Eliezeri ; bazalaki kobeta kelelo liboso ya Sanduku ya Nzambe. Obedi-Edomi mpe Yeyiya bazalaki mpe bakengeli Sanduku ya Boyokani.


Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala ! Tala elongi ya mopakolami na Yo !


Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke.


Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko : Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.


Yesu avandaki liboso ya kitunga ya makabo mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. Bazwi ebele bazalaki kotia mbongo ebele.


Wana Yesu atombolaki miso, amonaki bato na bozwi kotia makabo na bango kati na kitunga ya makabo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ