Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 12:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kasi tango mokonzi Joasi akokisaki mibu pene tuku mibale na misato na bokonzi, Banganga-Nzambe babongisaki nanu Ndako ya Nzambe te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 12:7
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mobu ya sambo, Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko ya bato ya Kari mpe bakengeli. Abengisaki bango epai na ye kati na Tempelo ya Yawe, asalaki boyokani elongo na bango, alapisaki bango ndayi kati na Tempelo ya Yawe mpe alakisaki bango mwana mobali ya mokonzi.


Ezalaki tango Jewu akokisaki mibu sambo na bokonzi nde Joasi akomaki mokonzi. Joasi akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba.


Tika ete Nganga-Nzambe moko na moko akamata mbongo na maboko ya babombi mbongo mpe basalela yango mpo na kobongisa eloko nyonso oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe. »


Boye, mokonzi Joasi abengisaki Nganga-Nzambe Yeoyada mpe Banganga-Nzambe mosusu. Atunaki bango : « Mpo na nini bozali kobongisa te biloko oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe ? Sik’oyo, bokozwa lisusu mbongo te na maboko ya babombi mbongo na bino, kasi botika yango mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe. »


Kasi Joabi azongisaki : — Tika ete Yawe akomisa bato na Ye ebele koleka mbala nkama ! Oh mokonzi, nkolo na ngai, bango nyonso bazali te basali ya nkolo na ngai ? Mpo na nini nkolo na ngai alingi kosala bongo ? Mpo na nini komemisa Isalaele ngambo ?


Na mobu ya sambo, Nganga-Nzambe Yeoyada alongolaki kobanga mpe azwaki mokano ya kosala boyokani elongo na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko : Azaria, mwana mobali ya Yeroami ; Isimaeli, mwana mobali ya Yoanani ; Azaria, mwana mobali ya Obedi ; Maaseya, mwana mobali ya Adaya ; mpe Elishafati, mwana mobali ya Zikiri.


Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi esika moko na bakonzi mpo na bolamu oyo asalaki kati na Isalaele, mpo na Nzambe mpe mpo na Tempelo ya Yawe.


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bato oyo bazali koloba ete tango ekoki nanu te mpo na kotonga Tempelo ya Yawe. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ