Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 12:5 - Mokanda na Bomoi

5 Joasi alobaki na Banganga-Nzambe : « Bosangisa mbongo nyonso oyo bamemi lokola makabo ya bule kati na Tempelo ya Yawe : mbongo oyo bazwi na nzela ya kotanga bato, mbongo oyo bazwi lokola mpako mpo na kosikola bato kolanda motuya oyo ekatama, mpe mbongo oyo moto na moto apesi na Ndako ya Nzambe na motema ya esengo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 12:5
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ndenge atombokelaki mokonzi : na tango oyo Salomo azalaki kotonga Milo mpe kokanga madusu ya mir ya engumba ya Davidi, tata na ye,


Soki bayebi motuya na yango, bazalaki kopesa mbongo yango epai ya bato oyo bazalaki kosalisa misala kati na Ndako ya Nzambe. Na mbongo yango, bazalaki kofuta bato oyo bazalaki kosala kati na Tempelo ya Yawe : basharipantie,


Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.


Tika ete Nganga-Nzambe moko na moko akamata mbongo na maboko ya babombi mbongo mpe basalela yango mpo na kobongisa eloko nyonso oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe. »


— Kende koyebisa Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ete atanga mbongo nyonso oyo bato bamemaki na Tempelo ya Yawe mpe oyo bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe bakongolaki.


Boye, bakambi ya mabota, bakonzi ya mabota ya Isalaele, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama mpe bakambi ya misala ya mokonzi bapesaki makabo wuta na mitema na bango moko.


Bato basepelaki mingi na makabo oyo bango moko bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, pamba te bazalaki kopesa yango epai ya Yawe, na motema mobimba. Mokonzi Davidi mpe asepelaki na yango mingi.


Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, alobaki na bango : — Botambola kati na bingumba ya Yuda, bokongola mbongo, mobu na mobu, kati na Isalaele mobimba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bosala yango sik’oyo. Kasi Balevi basalaki yango na lombangu te.


Nzokande, bana mibali ya Atali, mwasi mabe, batobolaki madusu mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe mpe basalelaki ata bisalelo na yango nyonso ya bule mpo na losambo ya banzambe Bala.


Moto nyonso oyo batangi asengeli kofuta motuya oyo mpo na Yawe lokola mpako, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo : bagrame motoba ya palata.


Mpo na yo, bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala, bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala ; bakobenga yo : ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukana mpe ya banzela oyo bato balekaka. ›


« Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto.


Mpe lisusu, bana liboso nyonso, ezala ya bato to ya banyama oyo bakomema epai na Yawe bakozala mpo na yo. Kasi osengeli kosikola mwana mobali nyonso ya liboso ya moto to ya nyama ya mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ