Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 12:21 - Mokanda na Bomoi

21 Basali na ye batombokelaki ye mpe basalelaki ye likita. Babomaki Joasi, na Beti-Milo, na nzela oyo ekenda na Sila.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 12:21
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi mpe abengaki yango « Engumba ya Davidi. » Mpe Davidi atongaki zingazinga na yango, longwa na Milo kino na kati.


Baesha, mwana mobali ya Ayiya, moto ya libota ya Isakari, asalelaki ye likita mpe abomaki ye na Gibetoni, moko kati na bingumba ya bato ya Filisitia, na tango oyo Nadabi elongo na Isalaele mobimba bazingelaki Gibetoni.


Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jewu abimaki, atelemaki liboso ya bato nyonso mpe alobaki : — Bosali na bino mabe te. Ezalaki ngai nde nasalelaki nkolo na ngai likita mpo na kotelemela ye mpe koboma ye ; kasi nani abomi bato oyo nyonso ?


Na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Akazia, mokonzi ya Yuda, Yoakazi, mwana mobali ya Jewu, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na sambo.


Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele, Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.


Basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye, mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna.


Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye.


Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, asalelaki Zakari likita, abundisaki ye liboso ya bato, abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi.


Jewu, mwana mobali ya Jozafati, koko ya Nimishi, asalelaki Yorami likita. Nzokande Yorami mpe Isalaele mobimba bazalaki kobundela Ramoti ya Galadi liboso ya Azaeli, mokonzi ya Siri.


Tango Akazia, mokonzi ya Yuda, amonaki makambo oyo esalemaki, akimaki na nzela ya Beti-Agani. Jewu alandaki ye mpe agangaki : « Boma ye mpe lokola ! » Bazokisaki ye kati na shar na ye na nzela ya Guri, pembeni ya Yibileayimi, kasi akimaki na Megido mpe akufaki kuna.


Tango bato ya Siri bazongaki, batikaki Joasi na bapota minene. Bakalaka na ye basalelaki ye likita na ndenge abomaki mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada mpe babomaki ye na mbeto na ye. Boye, akufaki mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ