Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 12:17 - Mokanda na Bomoi

17 Bazalaki komema te na Tempelo ya Yawe, mbongo oyo ewutaki na makabo ya kimia mpe na mbeka mpo na masumu ; yango ezalaki mpo na Banganga-Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 12:17
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asa azwaki palata mpe wolo nyonso oyo etikalaki kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; apesaki yango na maboko ya basali na ye mpe atindaki bango epai ya Beni-Adadi, mwana mobali ya Tabirimoni, mwana mobali ya Ezioni, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo :


Moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Azaeli, Jewu akoboma ye ; mpe moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Jewu, Elize akoboma ye.


Na tango wana, Yawe abandaki kokomisa moke bandelo ya Isalaele. Azaeli alongaki bana ya Isalaele, na mokili na bango,


na este ya Yordani, na etuka nyonso ya Galadi (mabele ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya Manase), longwa na Aroeri oyo ezali pembeni ya moluka ya Arinoni kino na Galadi mpe Bashani.


Boye kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe akabaki Isalaele na maboko ya Azaeli, mokonzi ya Siri, mpe ya Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali.


Akazi azwaki palata mpe wolo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi ; bongo atindaki yango lokola kado epai ya mokonzi ya Asiri.


Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki na maboko ya bato ya Filisitia engumba Gati elongo na bamboka na yango ya zingazinga.


Beria mpe Shema oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Ayaloni babenganaki bato ya Gati.


wana bino batikali ya Yuda, boyoka malamu Liloba na Yawe : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Soki botingami kaka kokende na Ejipito mpe soki bokeyi kovanda kuna,


Akozwa mokano ya koya elongo na mampinga ya mokili na ye mobimba mpe akosala boyokani elongo na mokonzi ya sude. Mokonzi ya nor akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpo ete akoka kobebisa mokili na ye, kasi mabongisi na ye ekolonga te mpe akozwa mokili yango te.


Mobeko yango ezali kaka moko, ezala mpo na mbeka mpo na kozongisa boyokani to mpo na mbeka ya masumu. Nyama ezali ya Nganga-Nzambe oyo asali mosala ya bolimbisi masumu.


Likabo nyonso ya gato oyo batumbi na fulu ya moto to bakalingi na kikalungu to mpe batumbi na likolo ya manzanza ezali ya Nganga-Nzambe oyo abonzi yango.


Bango nyonso bayaka nzela moko mpo na kotia mobulu, bakendaka kaka liboso lokola mopepe ya este, bazwaka bakangami ebele ndenge balokotaka mbuma ya zelo.


Tala eteni oyo okozwa kati na makabo ya bule oyo eleki kitoko, oyo batumba na moto te : makabo nyonso oyo bakomemela Ngai lokola makabo oyo eleki bule, ezala makabo ya bagato to bambeka mpo na masumu to bambeka nyonso ya kozongisa boyokani ; biteni wana nyonso ekozala mpo na yo elongo na bana na yo.


Lokola tango oyo Yesu asengeli komemama na Likolo ekomaki pene, Yesu azwaki mokano ya kokende na Yelusalemi.


Kasi bato ya Samari baboyaki koyamba Ye, mpo ete azalaki kokende na Yelusalemi.


Bongo Davidi elongo na bato nkama motoba oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakendeki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maoki, mokonzi ya Gati.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ