Kasi bazalaki kobimisa te mbongo oyo bazalaki komema na Ndako ya Nzambe, mpo na kosalela basani ya minene ya palata, bambeli, basani oyo babwakelaka na yango mayi, bakelelo mpe biloko mosusu oyo esalemi na wolo to na palata mpo na Tempelo ya Yawe.
Bato yango basalaki mosala na bango na boyengebene mpe na bokambami ya Balevi Yaati mpe Abidiasi, bana mibali ya Merari. Zakari mpe Meshulami, bana mibali ya Keati, nde bazalaki kokengela mosala na bango.
Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe.
Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?
Molingami na ngai, makambo oyo osalaka mpo na bandeko kati na kondima, ezala mpo na ba-oyo bazali bapaya na miso na yo, osalaka yango penza kolanda kondima na yo.