2 Bakonzi 12:13 - Mokanda na Bomoi13 batongi ndako mpe bato oyo bakataka mabanga. Bazalaki kosomba mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe : mabaya mpe mabanga bakata. Bazalaki mpe kobimisa mbongo mpo na misala mosusu ya kobongisa Tempelo ya Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango basilisaki, bazongisaki epai ya mokonzi mpe Yeoyada mbongo oyo etikalaki. Na mbongo yango, basalaki bisalelo mpo na Tempelo ya Yawe, mpo na losambo, mpo na bambeka ya kotumba, bakopo, mpe bisalelo mosusu ya wolo mpe ya palata. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, bazalaki kobonza bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe.