2 Bakonzi 12:11 - Mokanda na Bomoi11 Tango nyonso bazalaki komona ete mbongo ekomi ebele kati na sanduku, mokomi mikanda ya mokonzi elongo na mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kotanga mbongo oyo bato bazalaki komema na Tempelo ya Yawe ; bongo bazalaki kotia yango na basaki. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nganga-Nzambe Yeoyada akamataki sanduku moko mpe atobolaki mofinuku na yango. Atiaki sanduku pembeni ya etumbelo, na ngambo ya loboko ya mobali tango ozali kokota kati na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobatela ekuke batiaki kati na sanduku mbongo nyonso oyo bazalaki komema na Tempelo ya Yawe.