Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 12:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nganga-Nzambe Yeoyada akamataki sanduku moko mpe atobolaki mofinuku na yango. Atiaki sanduku pembeni ya etumbelo, na ngambo ya loboko ya mobali tango ozali kokota kati na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobatela ekuke batiaki kati na sanduku mbongo nyonso oyo bazalaki komema na Tempelo ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 12:10
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sheva azalaki mokomi mikanda ; Tsadoki mpe Abiatari bazalaki Banganga-Nzambe ;


Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; Tseraya azalaki mokomi mikanda ;


Tango nyonso bazalaki komona ete mbongo ekomi ebele kati na sanduku, mokomi mikanda ya mokonzi elongo na mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kotanga mbongo oyo bato bazalaki komema na Tempelo ya Yawe ; bongo bazalaki kotia yango na basaki.


Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki.


mpe apesaki mitindo oyo epai ya Nganga-Nzambe Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, epai ya Akibori, mwana mobali ya Mishe, epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi :


Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai ya Banganga-Nzambe oyo balandi mpe epai ya bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpo ete balongola kati na Tempelo ya Yawe, biloko nyonso oyo esalema mpo na Bala, mpo na nzambe mwasi Ashera, mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo. Mokonzi atumbaki yango libanda ya Yelusalemi, kati na bilanga ya lubwaku ya Sedron, mpe amemaki putulu na yango na Beteli.


Namani alobaki : — Kamata bakilo ya palata, tuku sambo. Atungisaki Geazi ete azwa yango. Boye, atiaki bakilo ya palata, tuku sambo kati na basaki mibale elongo na bilamba mibale ya talo. Namani apesaki yango epai ya basali na ye mibale oyo bamemaki yango liboso ya Geazi.


Shalumi, mwana mobali ya Kore, mwana mobali ya Ebiazafi, mwana mobali ya Kore elongo na bandeko na bango mosusu ya libota ya Kore, bazalaki na mokumba ya kokengela ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani ndenge bakoko na bango bazalaki kokengela ekuke ya molako ya Yawe.


Tango nyonso Balevi bazalaki komema sanduku epai ya bakalaka ya mokonzi mpe bazalaki komona ete ezalaki na mbongo ebele, mokomi mikanda ya mokonzi mpe mobombi biloko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kolongola mbongo oyo ezalaki kati na sanduku mpe kozongisa sanduku na esika na yango. Bazalaki kosala bongo mikolo nyonso mpe bazalaki kokongola mbongo ebele.


Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie ; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ