Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 11:2 - Mokanda na Bomoi

2 Kasi Yeosheba, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe ndeko ya Akazia, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia ; alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto, mpo na kobomba ye mosika ya miso ya Atali ; mpe Atali abomaki Joasi te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 11:2
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Adadi oyo azalaki nanu elenge na tango wana akimaki na Ejipito elongo na ndambo ya bato ya Edomi oyo bazalaki basali ya tata na ye.


Atongaki ba-etaje kolanda mir ya Tempelo : etaje moko na moko ezalaki na bosanda ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe ekanganaki na Tempelo na nzela ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.


Ekotelo ya etaje ya se ezalaki na ngambo ya sude ya Tempelo ; bongo, bazalaki kotambola na binyatelo mpo na komata na etaje ya kati-kati mpe na etaje ya misato.


Abombamaki elongo na ndesi na ye mibu motoba kati na Tempelo ya Yawe, wana Atali azalaki kokonza mokili.


Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi.


Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mitano na bokonzi —Jozafati azalaki mokonzi ya Yuda— Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.


Kasi Yawe alingaki te kobebisa Yuda mpo na Davidi, mowumbu na Ye, pamba te alakaki kopesa bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye mpo na libela.


Jozafati azalaki tata ya Yorami, Yorami azalaki tata ya Akazia, Akazia azalaki tata ya Joasi,


Kasi Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia, alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma, mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto. Lokola Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe mwasi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, azalaki ndeko mwasi ya Akazia, abombaki Joasi mosika ya miso ya Atali ; mpe Atali abomaki Joasi te.


Kasi bato ya maji ya Ejipito mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka : bango mpe babimisaki magorodo na mokili ya Ejipito.


Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.


‹ Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › »


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Davidi akozalaka tango nyonso na moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya libota ya Isalaele ;


wana bokolonga penza kokata boyokani na Ngai elongo na Davidi, mosali na Ngai, mpe Davidi akotikala kozala lisusu te na mokitani na kiti ya bokonzi, mpe bokolonga kokata boyokani na Ngai elongo na Balevi oyo bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ngai.


wana nakokaki kobwaka bakitani ya Jakobi mpe ya Davidi, mosali na Ngai, mpe nalingaki te kopona moko kati na bana na ye mpo ete akamba bakitani ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi. Nakozongisa lisusu kitoko ya mokili na bango mpe nakoyokela bango mawa. › »


« Kende epai ya bato ya libota ya Rekabi mpe bengisa bango ete baya kokota kati na moko ya bashambre ya Tempelo ya Yawe. Mpe pesa bango masanga ya vino ya komela kuna. »


Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila ; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango.


Moto yango alobaki na ngai : « Shambre oyo etala na ngambo ya sude ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala na Tempelo ;


Akendeki na Ofira, na ndako ya tata na ye, mpe abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo, bana ya Yerubali na likolo ya libanga moko ya monene. Kasi Yotami, mwana mobali ya suka ya Yerubali, abikaki mpo ete amibombaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ