2 Bakonzi 11:19 - Mokanda na Bomoi19 Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya Kari, bakengeli mpe bato nyonso ya mokili ; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya bakengeli. Bongo Joasi avandaki na kiti na ye ya bokonzi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi bakokotela na bikuke ya engumba oyo elongo na bakalaka na bango ; bongo bango elongo na bakalaka na bango bakoya na likolo ya bashar mpe mpunda elongo na bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi ; bongo, bato bakovanda libela na libela na engumba oyo.
Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.